395px

Ba gérants ya mabala

Mbilia Bel

Navandi motema ekobeta e
Namituni tina a mama
Natali na kati ya famille mobimba likambo lizali te ooh
Nayebi baleki ya mobali ko bayina ngai mabe
Batila ngai mitambo epayi nyonso po bazwa nga na mitifs
Kobala mobali atonda mosolo nakanisaki ezali paradis
Ekoma nga na ndako nini makambo namoni te ooh

Bolingo na nga na mobali na nga ezali nzoka na bagerants
Nasenga eloko epayi ya mobali moto mosusu apesa nga eyano

Nakokoka te Nzambe
Ngáí nakokoka te ooh Nzambe
Libala nakota nalanda bomengo namoni na miso
Mobali mosolo na bandeko na ye bakomi nde ko gérer nga

Nakokoka te ooh Nzambe
Ngáí nakokoka te ooh Nzambe
Na bato ya mosala ya mobali bazali kokata ngai mangala
Lokumu na ngáí ya mwasi ya moto ezali nde wapi eeh
Nakokoka te nalembi

Bandeko mobáli na bato nayé batie nga mpasi likoló
Mobáli ameka ata kolobisa nga bango nyonso bakangi bilongi eh
Mobáli alingí nga na motéma nazali komona eh
Bato ya famille nayé ba dominer ye, bato ya mosála bako commander

Nafandi motéma ezali kopela, mawa ya mobáli na nga
Asala likambo alingí té ba gérants na nzoto baleki
Mobáli na nga moninga moto nalingi yo mingi eh
Mobáli na nga moninga moto ba gérants ya libála na boyi

Nakokoka te Nzambe
Ngáí nakokoka te ooh Nzambe
Libala nakota nalanda bomengo namoni na miso
Mobali mosolo na bandeko na ye bakomi nde ko gérer nga

Nakokoka te eeh Nzambe
Ngáí nakokoka te ooh Nzambe
Na bato ya mosala ya mobali bazali kokata ngai mangala
Lokumu na ngáí ya mwasi ya moto ezali nde wapi eeh
Nakokoka te eh nalembi

Nakokoka te Nzambe
Ngáí nakokoka te ooh Nzambe
Libala nakota nalanda bomengo namoni na miso
Mobali mosolo na bandeko na ye bakomi nde ko gérer nga

Nakokoka te eeh Nzambe
Nga nakokoka te ooh Nzambe
Na bato ya mosala ya mobali bazali kokata ngáí mangala

Nakokoka te eh nalebi

Nakokoka te eeh Nzambe
Ngáí nakokoka te ooh Nzambe
Nakokoka te eh nalembi

Escrita por: