visualizaciones de letras 94

Kembo Na Yahwe

Charles Mombaya

Letra

    O bana Nzambe bakoyemba bakokumisa Mokonzi
    O eya na butu eya na moi tokobanga eloko te
    E bongo nabanga nini yango Yezu azali na bomoi
    O esengo ezali na mitema po tozali ban’a Nzambe
    O yemba alleluia nga nayemba alleluia
    Alleluia Alleluia
    Yemba alleluia, papa yemba alleluia

    Toyembela ye, ye nde elonga na biso
    Tokumisa ye, ye nde Nzambe na bikamwa
    Toyembela ye, ndeko yemba alleluia
    Toyembela ye, ye nde elikia na ngai o
    Nakumisa ye, ye nde aniati Satana
    Yembela Yahwe, yembela Masiya
    Yemba ozana a
    Oyembela Masiya
    Okumisa Yahwe
    Yemba alleluia, nga nayemba alleluia

    Toyembela ye, ye nde elikia na biso
    Ye nde aniati Satana kuna ngomba Golgotha
    Boyembela ye, boyembela Masiya
    Tokumisa ye, ye nde Nzambe na bikamwa
    Nayembela ye, ye nde Kosi na Yuda
    Ban’a Nzambe bakotatola elonga

    Frère, frère, frère, frère oo banga Nzambe na yo
    Sœur, sœur, sœur, sœur oo banga Nzambe na yo
    Tokosenga lelo Nzambe apambola
    Bana basengi lelo Nzambe apambola Pambola
    Pambola Yesu e pambola Yahwe pambola
    Pambola Yesu e pambola
    Bomoi na ngai napesi na yo Papa
    Bapasi

    Alpha Omega le Roi des rois e
    Yemba yemba yemba
    Yezu Mokonzi
    Yezu yo Mokonzi na ngai o Alleluia
    Tango Yezu akoya kokamata lingomba
    Tokobeta mindule palalala lalalala
    Mokolo wana baninga liwa likozala te
    Tokomona Masiya tokotonda n’esengo
    Tango
    Palalala lalalala

    Nzambe ozali Nzambe ya ntango nionso
    Nzambe na nguya e napamboli yo oza monene
    Babalaka te bakoma kobala oza elonga
    O Babotaka te bakoma kobota oza na nguya e
    O Nzambe na Mombaya Nzambe na Mombaya oza kotala
    O Nzambe na Daniele Nzambe n’elonga okosaka te
    Yahwe na bibele Yahwe sanzolama
    Yahwe na boboto sanzolama
    Y’osalaki mokili na maloba ma yo
    Osalaki pe lola sanzolama
    Ba ndeke na likolo bakoyembela yo
    Mbisi pe na mayi ekokumisa yo
    Ya solo tobengama seko bana na Nzambe
    Nkolo Yezu ee Nzambe na nguya


    Comentarios

    Envía preguntas, explicaciones y curiosidades sobre la letra

    0 / 500

    Forma parte  de esta comunidad 

    Haz preguntas sobre idiomas, interactúa con más fans de Charles Mombaya y explora más allá de las letras.

    Conoce a Letras Academy

    ¿Enviar a la central de preguntas?

    Tus preguntas podrán ser contestadas por profesores y alumnos de la plataforma.

    Comprende mejor con esta clase:

    0 / 500

    Opciones de selección