visualizaciones de letras 169

Louange Plus

Charles Mombaya

Letra

    Alleluia, alleluia, alleluia na Yesu eh
    (Alleluia, alleluia, alleluia na Yesu eh)
    Oh bana na Nzambe bakoyemba bakokumisa Mokonzi
    (Alleluia, alleluia, alleluia na Yesu eh)
    Oh eya na butu eya na moyi tokobanga eloko te
    (Alleluia, alleluia, alleluia na Yesu eh)
    Ebongo nabanga nini yango? Yesu azali na bomoyi
    (Alleluia, alleluia, alleluia na Yesu eh)
    Oh esengo etondi na mitema po tozali bana Nzambe
    (Alleluia, alleluia, alleluia na Yesu eh)

    Oh Yemba alleluia, mama yemba alleluia eh (Alleluia, alleluia)
    Yemba alleluia, papa yemba alleluia (Alleluia, alleluia)
    Toyembela Ye, Ye nde elonga na biso (Alleluia, alleluia)
    Tokumisa Ye, Ye nde Nzambe na bikamua (Alleluia, alleluia)
    Toyembela Ye, ndeko yemba alleluia (Alleluia, alleluia)
    Nayembela Ye, Ye nde elikia na ngai oh (Alleluia, alleluia)
    Nakumisa Ye, Ye nde aniati Satana (Alleluia, alleluia)
    Yembela Yahwe, yembela Masiya (Alleluia, alleluia)
    Yemba Hosanna (Alleluia, alleluia)
    Oh Yembela Masiya (Alleluia, alleluia)
    Oh Kumisa Yahwe (Alleluia, alleluia)
    Yemba alleluia, mama yemba alleluia eh (Alleluia, alleluia)
    Yemba alleluia, papa yemba alleluia (Alleluia, alleluia)
    Toyembela Ye, Ye nde elikia na biso (Alleluia, alleluia)
    Ye nde aniati Satana kuna ngomba Golgotha
    Toyembela Ye, toyembela Masiya (Alleluia, alleluia)
    Toyembela Ye, Ye nde elikia na ngai oh (Alleluia, alleluia)
    Nakumisa Ye oh, Ye nde Nzambe na bikamua (Alleluia, alleluia)
    Nayembela Ye, Ye nde Nkosi na Yuda (Alleluia, alleluia)

    Bana Nzambe bakotatola elonga
    Bana Nzambe bakotatola elonga
    Bana Nzambe bakotatola elonga (Elonga na Yesu eh)
    Bana Nzambe bakotatola elonga
    Frère, frère, frère, frère oh banga Nzambe na yo
    Frère, frère, frère, frère oh banga Nzambe na yo

    Bana Nzambe bakotatola elonga
    Bana Nzambe bakotatola elonga (Elonga na Yesu eh)
    Bana Nzambe bakotatola elonga (Elonga na Yesu eh)
    Bana Nzambe bakotatola elonga
    Sœur, sœur, sœur, sœur oh banga Nzambe na yo
    Sœur, sœur, sœur, sœur oh banga Nzambe na yo

    Tokosenga lelo Nzambe apambola
    Bana basengi lelo Papa pambola
    Pambola (Pambola Yesu eh pambola)
    Oh Yahwe pambola, Masiya pambola (Pambola Yesu eh pambola)

    Bomoyi na ngai napesi na Yo Papa
    (Bomoyi na nga napesi na Yo Papa)
    Bapasi na ngai napesi na Yo Papa
    (Bomoyi na nga napesi na Yo Papa
    Alpha Omega, le Roi des rois eh
    Alpha Omega, le Roi des rois eh)

    Yemba yemba yemba (Yemba)
    Yemba yemba yemba (Yemba)
    Yemba yemba yemba (Yemba)
    Yesu Mokonzi (Yemba)
    Yesu yo Mokonzi na ngai oh Alleluia (Yemba)

    Tango Yesu akoya kokamata lingomba
    Tokobeta mindule palalala lalalala
    Tango Yesu akoya kokamata lingomba
    Tokobeta mindule palalala lalalala
    Mokolo wana baninga liwa ekozala te
    Tokomona Masiya tokotonda na esengo
    Tango Yesu akoya kokamata lingomba
    Tokobeta mindule palalala lalalala
    Tango Yesu akoya kokamata lingomba
    Tokobeta mindule palalala lalalala
    Tango Yesu akoya kokamata lingomba
    Tokobeta mindule palalala lalalala

    Palalala lalalala (Palalala lalalala)
    Palalala lalalala (Palalala lalalala)
    Palalala lalalala (Palalala lalalala)
    Palalala lalalala (Palalala lalalala)

    Nzambe ozali Nzambe ya tango nionso
    (Nzambe ozali Nzambe ya tango nionso)
    Nzambe na nguya eh napamboli Yo Y'oza monene
    (Nzambe ozali Nzambe ya tango nionso)
    Babalaka te bakoma kobala oza elonga
    (Nzambe ozali Nzambe ya tango nionso)
    Oh Babotaka te bakoma kobota oza na nguya eh
    (Nzambe ozali Nzambe ya tango nionso)
    Oh Nzambe na Mombaya Nzambe na Kombay oza kosala
    (Nzambe ozali Nzambe ya tango nionso)
    Oh Nzambe na Daniel Nzambe na elonga Y'okosaka te
    (Nzambe ozali Nzambe ya tango nionso)
    O Nzambe na Marie-Anne opesi Cherel oza kosala
    (Nzambe ozali Nzambe ya tango nionso)

    Yahwe na bibele Yahwe sanjolama
    Yahwe na boboto sanjolama
    (Yahwe na bibele Yahwe sanjolama
    Yahwe na boboto sanjolama)
    Y’osalaki mokili na maloba na Yo
    Y’osalaki pe lola oh sanjolama
    Yahwe na bibele Yahwe sanjolama
    Yahwe na boboto sanjolama
    Ba ndeke na likolo bakoyembela Yo
    Mbisi pe na mayi ekokumisa Yo
    Yahwe na bibele Yahwe sanjolama
    Yahwe na boboto sanjolama

    Ya solo tokobengama seko bana na Nzambe
    (Ya solo tokobengama seko bana na Nzambe)
    Ya solo tokotikala seko basali na Nzambe
    (Ya solo tokobengama seko bana na Nzambe)
    Ya solo tokobengama libela bana na Nzambe
    (Ya solo tokobengama seko bana na Nzambe)
    Ya solo tokobengama seko bana na Nzambe
    (Ya solo tokobengama seko bana na Nzambe)
    Ya solo tokotikala seko bayembi na Yesu
    (Ya solo tokobengama seko bana na Nzambe)

    Nkolo Yesu eh yo yo, Malanda aleli Yo
    (Nkolo Yesu eh yo yo Nzambe na Nguya)
    Oh Mwana Nzambe oh yo yo, Blanche aleli Yo
    (Nkolo Yesu eh yo yo Nzambe na Nguya)
    Abongwanaka te, azali kaka ndenge moko Masiya oh
    (Nkolo Yesu eh yo yo Nzambe na Nguya)
    Oh Mwana Nzambe oh yo yo, Philcha aleli Yo
    (Nkolo Yesu eh yo yo Nzambe na Nguya)
    Oh Nkolo Yesu eh yo yo, Philo aleli Yo
    (Nkolo Yesu eh yo yo Nzambe na Nguya)


    Comentarios

    Envía preguntas, explicaciones y curiosidades sobre la letra

    0 / 500

    Forma parte  de esta comunidad 

    Haz preguntas sobre idiomas, interactúa con más fans de Charles Mombaya y explora más allá de las letras.

    Conoce a Letras Academy

    ¿Enviar a la central de preguntas?

    Tus preguntas podrán ser contestadas por profesores y alumnos de la plataforma.

    Comprende mejor con esta clase:

    0 / 500

    Opciones de selección