visualizaciones de letras 8

Tout Est Vanité

Charles Mombaya

Letra

    Bakongo na Kin basala bamambu na ba quartiers
    Mivé John na Ndjili pe na Ngiri-Ngiri, Zabara
    Bakombo lel'oyo etikala se na histoire eh

    Babuka na banque batia mouvement na Kinshasa
    Basala bampungu babunga na kati ya boloko
    Angwalima Wallace kombo etikala se na histoire

    Basala bakisi bazua bambonga moyeke
    Batonga bandako basomba bampeko na Kinshasa
    Mingi bakoma kotambola na mosuni ya bata

    Balela ba ambiance basala mabala na banganda
    Congo bar lel'oyo ekoma esika ya losambo
    Ba vendredi ambiance ekoma n'ango prière eh

    Bakenda na lunda basusu bateka misapi
    Batondi na mbongo bakoma na basi ebele
    Kasi kimia ezangi bango kati ya mabala eh

    Balongwe na Kin bakei kofanda na mikili
    Bakomi minene bakomi kotuta monzele
    Kasi kimia na mitema ezangi bango eh

    Salomon alobaki na se oyo ya bato
    Zua na yo mbongo tonda na yo ata na bomengo
    Nionso tokomona eza n'ango kaka vanité
    Bomoyi ya solo eza vraiment kati na Yesu eh

    Tika napesa elikia na Yesu Masiya
    Alobaki akopesa na oyo akondima Ye
    Kimia oyo bakoki kosomba na mosolo te
    Nazui mokano lel'oyo nakobila Ye eh

    Vanité, vanité, nionso se vanité
    Bomengo ya solo eza na Masiya eh
    Vanité, vanité, nionso se vanité
    Bomengo ya solo eza na Masiya eh

    Okoki kotonda na yo na bomengo na se
    Kimia oyo Masiya akopesa okosomba te
    Vanité, vanité, nionso se vanité
    Bomengo ya solo eza na Masiya eh

    Basomba bandako na bampeko misolo ebele
    Kasi mitema na bango tango nionso eza troublés
    Vanité, vanité, nionso se vanité
    Bomengo ya solo eza na Masiya eh

    Yaka na Yesu moninga y'okozua na Ye
    Kimia oyo bakoki kosomba na mosolo te
    Vanité, vanité, nionso se vanité
    Bomengo ya solo eza na Masiya eh

    Salomon alobaki vraiment na mokili ya se
    Nionso tokomona eza n'ango kaka vanité
    Vanité, vanité, nionso se vanité
    Bomengo ya solo eza na Masiya eh

    Vanité, vanité, nionso se vanité
    Bomengo ya solo eza na Masiya eh


    Comentarios

    Envía preguntas, explicaciones y curiosidades sobre la letra

    0 / 500

    Forma parte  de esta comunidad 

    Haz preguntas sobre idiomas, interactúa con más fans de Charles Mombaya y explora más allá de las letras.

    Conoce a Letras Academy

    ¿Enviar a la central de preguntas?

    Tus preguntas podrán ser contestadas por profesores y alumnos de la plataforma.

    Comprende mejor con esta clase:

    0 / 500

    Opciones de selección