visualizaciones de letras 441
Letra

    Oh Mario
    Luka ata mwasi yo moko obala
    Mario mosala kolinga ba maman mobokoli
    Basuka yo te?
    Lelo makambo lobi makambo nalembi
    Lelo bitumba lobi koswana nabaye
    Naboyi kobebisa nzoto na manzaka nalembi eh
    Mario nalembi e e
    Mario nabaye e e

    Oh Mario nasi napekisa yo
    Kolingaka basi bazali na mbongo
    Yoka ndenge azali kokaba yo na mitema ya basi mpe mibali
    Sala quand même effeot oluka mosala Mario
    Yo mutu ozali na ba diplômes mitano Mario
    Mponaniniozalikobebisakosambuisakombonayo
    Mario ah nalembi
    Ba produits ngai napokaolaka nzoto ekoma sembe sembe
    Okobeteke ngai na zoka lobi na zwa maladie ya cancer
    Lobi tango na kopolo yo okimi ngai eh
    Mario nalembi eh
    Bima bima na ndako na ngai Mario
    Mpo na nininiongo ya kolinga
    Akobeteke ngai na zwa epayi zuwa ya lokuta epayi
    Zuwa ya biloko akutaki ngai na yango
    Likambo mosusu mosala koboma biloko ya ndako na somba
    Nalembi eh Mario na baye yo
    Kende Mario nalembi yo oh
    Mario akuti ngai na biloko mobali mosusu asomba

    Oyoka elengi ya kovanda te Mario?
    Oyoka elengi te olia na mesa?
    Kaka soki zuwa ekangi yo na poitrine
    Olingi kaka kobeta ngai na koboma biloko
    Mario si na salisa yo mingi
    Diplôme ya sima ngai na salisaki yo Mario
    Bongo leleo ngai nakomi mwasi mabe?
    Mario likambo te
    Ah mokili eza kaka boye hum

    Mobali akuti ngai na bomemgo
    Asengi akomander ngai na ndimi
    Mobali akuti ngai na bomengo
    Asengi adiriger ngai na ndimi
    Nabandi kobima na ye babandi kobenga ye Monsieur
    Mario avimbi moto akanisi biloko na ngai ya ye ah!
    Ah Mario na baye yo o
    Kende Mario nalembi yo o

    Mario azongi epayi ya baboti
    Akuti mbeto na ye ya bomwana
    Ekomi tango ya kolala mbeto mokuse makolo milayi Mario
    Mario nalembi somba mbeto na baye e
    Koyokamotema pasi te ndako ngai moko nafutaka
    B 11amba nasombela yo natikeli yo souvenir ya bolingo
    Oyo ezali na lavage nakotindela yo na bato
    Mario nale mbi yo oh
    Kende na yo na baye yo oh

    Hum, Mario zuwa lokola fusée Mario ah ah
    Mario mosala kobetela ngai bana bigogo
    Bana yango ya yo?
    Olingi bobele ba mamans mobokoli

    Akobete ngai na zuwa epayi zuwa ya lokuta
    Epayizuwayabilokoakutakingainayango
    Likambo moke mosala koboma koboma biloko ya ndako na somba
    Nalembi eh Mario na baye yo
    Kende Mario nalembi yo o
    Bima bima nalembi yo

    Mario nale mbongoya likelemba mitu tuku misato
    Nasombi Mercedes 190 nayebisi Mario mokolo mosusu tobima
    Tokende kosala promenade
    Tokomi na nzela Mario alobi na ngai
    Y o zonga côté ngai ngai na zali
    Nakumba voiture mpo bamona que ngai
    Moto nasombeli yo yango
    Nayebisi Mario te
    Ngai kutu na za na posa na kumba eloko nasombi sika
    Bato nionso bamonaque ngai moto nasombi
    Toweli volantngai na Mario
    Mario atuteli ngai voiture na nzete

    Nzoto ezali nanu ya meme olingi obebisa ngai elongi
    Il paraît basi nionso ozwaka mosala kobebisa bango bilongi
    Epayi na ngai na stopper nalembi yo
    Mario papa na baye yo oh
    Kende na yo nalembi yo

    Mario alingaka babong isa mpos ya matama na pomade
    Oh ata ezali muindo eya motane
    Alingaka kobala basi ya âge na ye te
    Alingi bobele ba mamans mobokoli Mario
    Soki maman mobekoli abengani ye
    Akanga bobele biloko na liputa
    Ba brosses à dents, masini ya mandefu, kisanola

    Mobali akuti ngai na bomemgo
    Asengi akomander ngai na ndimi
    Mobali akuti ngai na bangenge
    Asengi adiriger ngai na ndimi
    Nabandi kobima na ye babandi kobenga ye Monsieur

    Mario avimbi moto akanisibiloko na ngai ya ye ah!
    Ah Mario na baye yo o
    Kende Mario nalembi yo o
    Bima na ndako na ngai na baye yo o

    Mario à travers yo napesa baleki mosusu toli
    Bakomi kolinga basi ya bato mpo na bambongo na bango
    Mobali asali mbongo, asali mbongo apesi mwasi
    Yo okeyi kovandela ye mpo osilisa ye yango
    Ah Mario okuti ndako appartement kitoko
    Biloko yo moto osombi te yo olali
    Ovandi, téléphone, télévision
    Oh Mario kanisa mpe mobali oyo asombaki yango
    Amonaki mpasi likambo nini Mario?
    Llkambo naloba kutu ezali te
    Ezali te, ezali te eza te Mario

    Koyokamotema pasi te ndako ngai moko nafutaka
    Bilamba nasombela yo natikeli yo souvenir ya bolingo
    Oyo ezali na lavage nakotindela yo na bato
    Mario nalembi yo oh
    Kendenayonabayeyooh

    Mario ba sapato ya western na ba sapato ya croco
    Kaka mwasi asombelaka yo?
    Bilamba ya V alentino, complet ya cuir
    Na ba chemises ya soie
    Ba ceintures ya lézard
    Kaka mwasi asombelaka yo Mario?
    Ba suki ekoma ya kolala milelu milelu
    Singasinganamoto
    Kaka mwasi moto afutaka coiffeuse wana?

    Ba produits ngai napokaolaka
    Nzoto ekoma sembe sembe
    Okobeteke ngai na zoka lobi na zwa maladie ya cancer
    Lobi tango na kopolo yo okimi ngai eh
    Mario nalembi eh
    Kende papa nalembi yo oh

    Mario azongi epayi ya baboti
    Akuti matelas na ye ya bomwana
    Ekomi tango ya kolala matelas etoboka
    Ebimisa pasipolomi
    Na baye Mario, matelas mokosa nalembi eh
    Somba matelas na baye eh

    Lelo koswana lobi bitumba na baye
    Lelo makambo lobi makambo
    Naboyi kobebisa nzoto na manzaka nalembi eh
    Na baye yo, Mario nalembi e e
    Mema bilamba nalembi
    Kotika eloko te na baye

    Mario nawuti zando nakuti ye na ndako
    Mario asiliki, nakanisi bana mosala
    Balambi biloko malamu te
    Ngai moko nakoti na cuisine
    Nalambeli Mario, nati na mesa
    Mario aboyi kolia, asiliki
    Abemngi ngai pembeni
    Chérie oyebi tina nasiliki, nalibi te
    Ba complets ya lin oyo ebimi sikoyo
    Soki osombeli ngai te libaka ekokufa ya mbala oyo

    Mobali akuti ngai na bangenge
    Asengi adiriger ngai na ndimi
    Nabandi kobima na ye babandi kobenga ye Monsieur
    Mario avimbi moto akanisi biloko na ngai ya ye ah!
    Ah Mario na baye yo o
    Mobali mabe nalembi yo
    Obetaka ngai nalembi papa

    Ah Mario vraiment kende na yo kaka
    Na ba grand frères ya quartier
    Okoma kosalela bango zuwa
    Bato bamoni esika ngai nakoli Mario
    Ah Mario akomona tango bakosala versement ya mbongo
    Baye kotikela ngai Mario alongoli singlet
    Alingisikoyoasalacompteyambongo
    Zuwa etondi ye na mbanga na motoki
    Mais ouo ozali ko compter ya yo?

    Akobete ngai na zuwa epayi zuwa ya lokuta
    Epayi zuwa ya biloko akutaki ngai na yango
    Likambomokemosalakobomakobomabilokoyandakonasomba
    Nalembi eh Mario na baye yo
    Lokoso eleki nalembi yo oh

    Ba familles ya Mario bakanisaka
    Mario apesaka ngai mosolo
    Mario en tout cas nalembimbalaoyo
    Soki oyoki lisusu natuni ba moziki na ngai
    Baya kobonfela yo kende libela
    D'ailleurs oza muana bato ngai mpe naza mwana bato point


    Comentarios

    Envía preguntas, explicaciones y curiosidades sobre la letra

    0 / 500

    Forma parte  de esta comunidad 

    Haz preguntas sobre idiomas, interactúa con más fans de Franco Luambo y explora más allá de las letras.

    Conoce a Letras Academy

    ¿Enviar a la central de preguntas?

    Tus preguntas podrán ser contestadas por profesores y alumnos de la plataforma.

    Comprende mejor con esta clase:

    0 / 500

    Opciones de selección