visualizaciones de letras 563
Letra

    Yesu oyo
    Ngonga ya réveil na ngai ekobeta mokolo nini?
    Ebongo livre ya vie na ngai ekomi na page nini Papa?
    Bimbo na ngai ekotoboka mokolo nini Yesu eh?

    Yo Nzambe oyo, ima Yo Nzambe oyo
    Ima Yo Nzambe oyo eh, ima Yo Nzambe oyo
    Ima Yo Nzambe oyo eh, Papa na ngai eh

    Yo Nzambe oyo (Papa ya bana eh)
    Yo Nzambe oyo (okosaka eh ima oh)
    Yo Nzambe oyo (olobaka solo Papa)
    Yo Nzambe oyo

    Yo Nzambe oyo
    Ima Yo Nzambe oyo, ima Yo Nzambe oyo
    Papa Y'olobaki okosala eh, Papa Y'olobaki okosala eh
    Papa natamboli pe mingi oh, Papa bafingi ngai mingi oh
    Papa motema ekomi kobanga eh, Papa nakomi kolenga eh
    Papa Y'olobaki okosala eh kati na bomoyi na ngai eh
    Papa ba temoins bazalaki eh tango Y'olakaki ngai oyo eh
    Papa Y'obaki okosala eh, Papa sembola loboko eh

    Yo Nzambe oyo (Nzambe oyo)
    Yo Nzambe oyo (papa Yo Nzambe oyo eh)
    Yo Nzambe oyo (ima Yo Nzambe oyo eh)
    Yo Nzambe oyo (Papa sembola loboko)

    Yo Nzambe oyo
    Ima Yo Nzambe oyo, ima Yo Nzambe na ngai oh
    Papa nafandaki na ngai oh, Papa nayebaki Yo te oh
    Papa Y'oluki nga Marie eh, Papa Y'olobi nakosala eh
    Ngai nakosala na elanga na Yo eh, Papa natelemi nabandi kosala
    Papa makambo ekokisama, Papa nazeli pe mingi oh
    Papa naluki na losambo eh, Yesu Y'olobi na ngai nini eh

    Yo Nzambe oyo (Papa eh)
    Yo Nzambe oyo (Papa bana eh Yo Nzambe oyo eh)
    Yo Nzambe oyo (elikia na ngai Papa)
    Yo Nzambe oyo (mosungi ya kokamwa eh)

    Yo Nzambe oyo
    Ima Yo Nzambe oyo, Papa tala bato ebele oh
    Papa baye koluka Yo eh, Papa baye kotala ngai te oh
    Papa basusu bazangi kobota, Papa basusu baza na malade
    Papa basusu bazangi misala, Papa basusu bazangi kimia eh
    Papa baye koluka Yo eh, basusu bakangami na milimo mabe
    Papa Yo sembola loboko ima, ngai nagangaki nalobaki eh
    Yo nde oh Nkolo ya libiki ima, Yo nde oh Nkolo ya misala ima
    Papa nakomi kobanga eh, Papa nakomi kolenga eh

    Yo Nzambe oyo (Papa sembola loboko ima eh)
    Yo Nzambe oyo (Papa sembola loboko ima eh, banguna bakamwa ima eh)
    Yo Nzambe oyo (banguna bamona ima oh, Papa sembola loboko ima eh)
    Yo Nzambe oyo (Papa sembola loboko ima eh, Papa basusu bazangi misala)
    Yo Nzambe oyo (Papa basusu bazangi kobota, Papa basusu bazangi kimia eh)
    Yo Nzambe oyo (yo nde Nkolo ya kimia ima eh, Yo nde Nkolo ya kimia)

    Papa zua nga mosali na Yo, zua ngai mwana te oh
    Nasali Yo mabe mingi oh, pasi elekeli ngai oh
    Nasengaki bambongo na ngai oh, bomengo na ngai nionso eh
    Nakendaki mosika na Yo, nasilisi yango na ambiance oh
    Nakomi kolia na bangulu oh, kolala kaka na bangulu oh
    Natali boye ngai nalobi, nazonga ndako ya baboti
    Natali boye ngai nalobi, nazonga ndako ya baboti na nga

    Ima oh naye na Yesu eh (po ete nabika oh)
    Ngai oyo nazongi ndako eh (po ete nabika oh)
    Ngai oyo nazongeli Papa (po ete nabika oh)
    Yawe zua ngai ata mosali nasokolaka Yo makolo Nzambe (po ete nabika oh)
    Oh zua ngai ata mosali nakombolaka eklesia Nzambe (po ete nabika oh)
    Zua ngai ata mosali napanguisaka ba bancs na eklesia eh (po ete nabika oh)
    Zua ngai ata mosali nasalaka oyo olingi nasala eh (po ete nabika oh)
    Ngai oyo naye na Yesu eh (po ete nabika oh)
    Ngai oyo nazongeli Papa (po ete nabika oh)
    Papa esika nawuti namoni pasi mingi Papa na ngai eh (po ete nabika oh)
    Ngai oyo nazongi ndako ya baboti (po ete nabika oh)

    Ngai oyo naye na Yesu eh (po ete nabika oh)
    Papa na ngai atinda nga, mema nga esika olingi nakotosa eh (po ete nabika oh)
    Ngai oyo nazongi ndako eh (po ete nabika oh)
    Yesu oyo sala na ngai olingi (po ete nabika oh)
    Zua ngai ata mosali nasalaka mosala na eklesia eh (po ete nabika oh)
    Zua ngai ata mosali natambolaka partout, nateya liloba eh (po ete nabika oh)
    Ngai eh naye na Yesu eh po ete nabika oh (po ete nabika oh)
    Ngai oyo nazongeli Papa po ete nabika oh (po ete nabika oh)
    Hmm nazongi ndako ya baboti (po ete nabika oh)
    Ima eh naye na Yesu eh (po ete nabika oh)
    Ima eh nazongi ndako eh (po ete nabika oh)

    Bino bomoni makambo asalaka ye eh
    Bomoni makambo asalaka Nzambe oyo eh
    Abikasaka babeli eh
    Apesaka pe mabala Nzambe oyo
    Atombolaka bakweyi eh
    Tokozongisela nini, tokobina, tokobina mame
    Tokobina mame kobina mame
    Abina bina eh


    Comentarios

    Envía preguntas, explicaciones y curiosidades sobre la letra

    0 / 500

    Forma parte  de esta comunidad 

    Haz preguntas sobre idiomas, interactúa con más fans de Marie Misamu y explora más allá de las letras.

    Conoce a Letras Academy

    ¿Enviar a la central de preguntas?

    Tus preguntas podrán ser contestadas por profesores y alumnos de la plataforma.

    Comprende mejor con esta clase:

    0 / 500

    Opciones de selección