visualizaciones de letras 18

Camarade (feat. Taïs Nkelele)

Marie Misamu

Letra

    Hmm caramba mamá mía, kombo na yo nani oh mama?
    Ngai soeur kiyika
    Namoni miso na yo lokola colombe pe etaleli na yo ya innocence
    Hein
    Humm mwasi, nalinigi natonga palace d'amour na motema na yo pona libala
    Olobi nini oh? Eh
    Olobi nini ko mama? Eh

    Ezalaka na moto moko alinga ngai mingi
    Wuta libumu ya mama eh
    Ezalaka na moto moko alinga ngai mingi
    Wuta ebandeli ya mokili eh
    Libela na vie na ngai oh, oh

    Ah, tika nanu motema na nga eloba
    Po kati na yo nazomona liziba ya mayi ya peto
    Nzoka motema na nga eza na posa ya komela mayi wana
    Nayebi oza mukolo mama, hein?
    Osi okomi déjà na esika na nga
    Olobi nini ko? Hein?
    Olobi nini ko mama kiyika?

    Yo olingi ngai lelo
    Nini yango elakisi okolinga pe moninga na ngai yo yo
    Olingi nga camarade
    Nini yango elakisi okolinga pe lipasa na ngai yo yo
    Ye wana motema na ngai yo yo
    Nameseni na ye oh oh oh
    Moninga ya libala wo wo
    Nakoka te kozanga yo oh

    Ah, mama na ngai, lobela nga nanu vraiment
    Moto'ango boza na ba relations nini yo na ye
    Lobela nga nayeba ye, ah
    Nalingi nayeba te, lobela nga nanu vraiment, ah

    Nazalaki na libumu ya mama nayebaki te
    Nzoka nde nazalaki na ye oh
    Kobotama na ngai navimbi na ye elongo
    Nakoli pe na ye tomeseni
    Moninga ya motema soki nga nabeli
    Ye wana liboso
    Soki nga nakweyi to likambo na vie na nga
    Ye wana solution
    Alongola nga posa ya mibali mosusu
    Ah yesu eh ye
    Okosalela nga nini oyo ye akokaka te
    Aza na nionso oh

    Comment faire pour le connaître?
    Je suis prêt à connaître cet homme
    Pour lui donner les codes de mon coffre-fort qui est mon coeur
    Afin qu'il soit mon ami, qu'il fasse de moi ce que tu es
    Et qu'il soit la lumière de notre amour

    Nalobela yo ya solo, akanga ngai singa
    Alokota nga na poto poto
    Nazalaki eloko ya pamba bato batalaki miso te
    Apesi nga valeur oh
    Lobela nga soki yo ozalaki na esika na nga
    Olingaki osala nini eh, eh?
    Tokata ndayi na ye
    Moko te na biso ayokisa moninga pasi oh
    Yo olingi ngai lelo
    Nini yango elakisi okolinga pe moninga na ngai yo yo
    Olingi nga camarade
    Nini yango elakisi okolinga pe lipasa na ngai yo yo

    Encore une fois, écoute mon coeur pleurer
    Comme un robinet qui coule sans connaître le [?] ce qu'il va creuser sur son parcours
    Qu'on deversait une grande quantité d'eau
    Je n'aurais aucun interet à te faire souffrir
    Crois à ce que je te dis, un jour tu me donneras raison

    Lokola nalingi yo mingi
    Eloko nionso okotinda nga nakotosa kaka oh ye
    Lakisa nga moninga na yo nameka ata kolinga
    Noki te naya kozanga yo oh
    Nalingi yo mingi
    Linga ngai na libala oh oh
    Nakoka te nazanga yo oh

    Moninga na nga (yesu klisto)
    Hmm lipasa na nga (jésus)
    Camarade na nga (Elohim)
    Ah eh mi corazón (alpha omega)
    Minha vida eh (jehovah nissi)
    Oh lisu na nga (amonaka nga)
    Ayokaka nga (ayokaka nga)
    (Alobaka na nga na voix douce oh oh) na voix ya douce

    Ndima ngai na libala mama
    Papa tika nakotosa yo oh
    Ye aza témoin na biso yesu
    Ye akanga yango likolo
    Kino liwa ekokabola biso
    Po nandimi ye na pasi eh ye
    Mama omonisi nga pasi oh oh
    Nakoka te kozanga yo eh

    Nalingi yo mingi oh oh
    Nga pe nakotosa yo oh
    Namoni pasi mingi mama
    Papa ti nga nayebaki te oh
    L'essentiel ondimi nga na libala
    Ah, komonisa nga pasi te eh
    Nzoto na nga ekomi nde ya yo
    Motema eza kobeta ngai oh yo
    Nga pe eza kobeta ngai oh yo
    Papa eh eza kobeta mbangu mbangu
    Vraiment ya solo ondimi nga na libala
    Nga na yo mosuni moko eh
    Totikala libela, tosala famille
    Totikala libela, tosala famille


    Comentarios

    Envía preguntas, explicaciones y curiosidades sobre la letra

    0 / 500

    Forma parte  de esta comunidad 

    Haz preguntas sobre idiomas, interactúa con más fans de Marie Misamu y explora más allá de las letras.

    Conoce a Letras Academy

    ¿Enviar a la central de preguntas?

    Tus preguntas podrán ser contestadas por profesores y alumnos de la plataforma.

    Comprende mejor con esta clase:

    0 / 500

    Opciones de selección