visualizaciones de letras 26

Conversion

Marie Misamu

Letra

    Nalekisi tango na makambo ya mokili oyo
    Litomba nazui kaka déception
    Bano na ngai na se na moyi oh
    Nkolo Ye moko kaka témoin na ngai oh
    Napesé malamu na mabe na mokili oyo
    Natali molayi ya makambo na mona
    Oyo nakutani na Ye, c'est pas possible
    Namiporté Garant natikala kaka na Ye
    Namoni oyo ekomi kaka suka na ngai oh
    Botika ngai nalanda oyo atuti motema na nga
    Yesu eh
    Ah ye ye

    Misu na ngai emoni makambo nanu emona te
    Matoyi na ngai eyoki makambu ya somo eeh
    Eh nani atindaki ngai nalanda nzela ya Tata oyo
    Je ne suis pas tranquille il a troublé mon cœur oh
    Na maloba na Ye ya malamu eh

    Basusu bakoloba ngai nasalela ka âge pe ekozala mokolo moko
    Nakokoma mpaka pe mobange
    Liwa ekobetela ngai na porte basusu pe balobaka
    Mboka yango ezalaka sûreté paladiso

    Mboka elaka, mboka elaka, balaka biso eh
    Mboka elaka sima ya liwa nakokoma
    Paladiso eh, mboka ebimisaka miliki pe mafuta ya nzoyi
    Mboka ya basantu eh

    Omona wapi esomba bitumba na yo ekoma ya ye
    Il a renversé les montagnes depuis la racine kokamwa eh
    Il a arrêté l'écoulement des eaux oh Nzambe oyo
    Okomona molili mayi ekosanza yo lokola Jonas eh
    Oza motuya na misu ya Nzambe osombama na kilo ya bongo te
    Okoka nini na wolo diamant te bakoki te ko changer na vase
    Tonda na wolo meke ma

    Oh conversion ya basusu eh
    Eyaka na fimbu okomona lokola punition
    Oh ya basusu eyaka na nzela oyo okanaki te
    L'essentiel okutana na Nzambe chance ya vie
    Makambo na yo nionso ekobonga pe ekokoma sika eh
    Bungisa makanisi te, yeba ngonga na yo ekoki eh

    Nzela ya Yesu eh, mona kaka mosika (nzela ya Yesu oyo)
    Ngonga na yo soki ekoki eh batindika yo na moto te (ah batindika yo na moto te)
    Eloko ekosala yo, ekozala au-delà na yo (souviens-toi)
    Bungisa makanisi te, yeba ngonga na yo ekoki eh (souviens-toi, mama eh)

    Ndeko koluka luka na makasi te

    Nzela ya Yesu eh, mona kaka mosika
    Ngonga na yo soki ekoki eh batindika yo na moto te (ekobeta lokola kake)
    Eloko ekosala yo, ekozala au-delà na yo
    Bungisa makanisi te, yeba ngonga na yo ekoki eh (ngonga na yo ekoki eh)

    Nzambe na ngai eh, epayi na Yo Nkolo Yesu eh
    Lobiko na ngai tango nionso
    Epayi na Yo Nkolo Yesu eh
    Lobiko na ngai tango nionso
    Olokoti ngai na bowumbu eh
    Nabengami solo Mwana Nzambe
    Soki otiki ngai lelo Nzambe
    Nani oyo akokamba nga

    Bobele Yo Papa, Bobele Yo Papa eh
    Bobele Yo Papa, Nkolo na nga

    Ngai moi mon Dieu je te connais oh
    Toi aussi tu me connais oh
    Oui mon Dieu je te connais comme mon père oh
    Toi aussi tu me connais comme ta fille, ah bien-aimée

    Les choses précieuses ne sont rien auprès de Jésus
    (Yawe nandimi na mokili oyo ya se)
    [?] Yo mutu oleki motuya mama eh
    (Esika na yo ebongisami wuta kala)
    Secret ya valeur ya mutu esimbami na Yesu eh
    (Nalimwa na miso ya banguna na nga)
    Ndeke, bibale, niama, mopepe eyeba te
    (Tu es le bienvenu na mboka Tata)

    Ah ngai nayokaki ozoteya de près oh na musika oh
    (Yawe nandimi na mokili oyo ya se)
    ( Je me suis intéressée il a secouer ma vie)
    (Esika na yo ebongisami wuta kala)
    Ye moto a mesure ata molayi ya mayi eh
    (Nalimwa na miso ya banguna na nga)
    Apesa mvula, mopepe mitindo etosaka ye, nawela nini eh?
    (Tu es le bienvenu na mboka Tata)

    (Yawe nandimi na mokili oyo ya se)
    Esika na nga na lola, baklisto basali bakokoma kozela yo paradis ya basantu eh
    (Esika na yo ebongisami wuta kala)
    Oh paladiso eh, paladiso mboka na elaka ma
    (Nalimwa na miso ya banguna na nga)
    (Tu es le bienvenu na mboka Tata)

    Ah libanda na Yesu pasi
    (Yawe nandimi na mokili oyo ya se)
    Nani yango abenga ngai eh, nani yango asalisa ngai eh
    (Esika na yo ebongisami wuta kala)
    Nga nayokaka somo ko juger baninga oh
    (Nalimwa na miso ya banguna na nga)
    Bino nateya bango balanda nzela ya lobiko
    (Tu es le bienvenu na mboka Tata)

    Oyo yo okobengaka ye [?] nani ?
    (Yawe nandimi na mokili oyo ya se)
    Aza besoin Nzambe ako rejoindre biso
    (Esika na yo ebongisami wuta kala)
    Ah ngai na mituna baye babotami na libota bayebi Nzambe te oh
    (Nalimwa na miso ya banguna na nga)
    Nabenga bango lisusu bandeko na ngai te
    (Tu es le bienvenu na mboka Tata)

    Ebongo mokolo ngai nakozonga sima eh
    (Yawe nandimi na mokili oyo ya se)
    Basala ngai lolenge nga nasalaki bango, eh, Nzambe ya Lola eh
    (Esika na yo ebongisami wuta kala)
    Yesu kutu mosantu mbala misato andimaki liwa ya somo n'ekulusu
    (Nalimwa na miso ya banguna na nga)
    Pona ngai na yo tobika eh
    (Tu es le bienvenu na mboka Tata)

    Elanga ya Nzambe eza monene, basali baza moke oh
    Ndeko na nga tozozela yo oh oh
    Baninga na nga bayembi, soki omoni ezosimba te
    Yaka na Yesu tozozela yo oh oh
    Ye bolingo eh (tozozela yo oh oh)
    Aza na posa na yo (tozozela yo oh oh)
    Yaka na Yesu eh (tozozela yo oh oh)
    Tozozela yo oh oh


    Comentarios

    Envía preguntas, explicaciones y curiosidades sobre la letra

    0 / 500

    Forma parte  de esta comunidad 

    Haz preguntas sobre idiomas, interactúa con más fans de Marie Misamu y explora más allá de las letras.

    Conoce a Letras Academy

    ¿Enviar a la central de preguntas?

    Tus preguntas podrán ser contestadas por profesores y alumnos de la plataforma.

    Comprende mejor con esta clase:

    0 / 500

    Opciones de selección