visualizaciones de letras 227

Eh Yahweh

Marie Misamu

Letra

    Eh Yawheh, eh Yawheh kumama
    Eh Yawheh oh, eh Yawheh kumama na Yo
    Eh Yawheh, eh Yawheh na ngai oh kumama eh
    Eh Yawheh, papa na bana eh kumama
    Natali na bibilia ngai na moni Anna eh
    Oyo azalaki ekomba Masiya
    Opesi ye Samuel eh na nguya na Yo
    Yo nde nkolo ya bana eh, opesaka mabota eh
    Pesa na ba oyo bazangi mpo bakumisa Yo eh
    Les 4 êtres vivants bavandi na kiti na Yo Nzambe
    Bazali kotatola y'oza Mosantu, Yawheh kumama na Yo

    Eh Yesu, makambo oyo osalelaka biso
    Mitema oyo otutisaka biso Nzambe
    Vraiment natali na likolo, natali na se
    Moko te akokani na yo Papa

    Na liziba ya Bethesda obikisa malade
    Papa nani akokani na Yo?, Y'oleki nguya eh
    Yo mobikisi ya babeli eh, babengi Jehovah Rapha eh
    Loboko na yo mokuse te olobi nini Papa eh
    Natangi na bible mwasi okotanga makila
    Asimbaki elamba na Yesu azuaki lobiko kumama
    Eh Yahweh, eh Yahweh, eh Yahweh, Yahweh
    Papa olobi nini eh?
    Nakima wapi? Nabatama wapi Schilo?
    Nakomi lokola Jonas na libumu ya mbisi destination inconnu
    Bilamba ya Congo ekomi biteni biteni eh
    Misuni ya ba congolais ekomi bipayi na bipayi olobi nini?

    Oh moningami kati na Nkolo
    Soki omoni pasi ebelemi na porte na yo
    Kamata trompette n'o betela Nkolo
    Yango nde libondeli ako yoka yo

    Kumama eh Yesu oyo

    Kumama Papa eh, kumama Papa eh, kumama Papa eh
    Kumama

    Nakoma pe koseka ngai oyo
    Basombelaki nga lopango na lilita
    Nakufa lelo lobi mosika
    Soki makambo ekomeli yo ndeko
    Fukama buaka misolo likolo

    Ganga au secours eh Yesu oyo
    Ngai nalingi na yebisa yo nde makambo
    Nayebi te ndenge nini ya kobanda
    Yo moko kamata ba phrases na ngai oh
    Classer yango ndenge olingi eh
    Oza na suki ya pembe, babengi sagesse eh
    Kumama eh Yesu oyo (eh papa)
    Olati robe ya pembe Nzambe, babengi sainteté Yesu eh

    Kumama eh Yesu oyo
    Olati ceinture na loketo, babengi verité Nzamb'oyo
    Tika nga pe na lobaka kaka verité
    Eh na makolo na yo mapapa eh, babengi saine evangile
    Tika nga na teya liloba na yo
    Mongongo n'o eleki kutu ya bakake oh, babengi yango autorité
    Kumama eh Yesu oyo
    Yo nde mobikisi ya ba malades ba lembana, Nkolo na bana eh
    Kumama eh Yesu oyo

    Papa ngai nalingi na yebisa yo nde makambo
    Nayebi te ndenge nini ya kobanda (kumama Papa nazokoka koloba te, Seigneur)
    Miso na yo ebimisaka ba moto, babengi yango lumière eh
    Yo nde motambwisi ya bana eh
    Na bengaka yo Monsieur raison eh, ozalaka kaka na raison (monsieur raison na ngai oh)

    Kumama eh Yesu oyo
    Ngai natali likolo natali mabele ba niama na zamba ba mbisi na mayi oh
    Nabangi monene na Yo
    Nzambe esika mayele na nga esuki oh, ya yo ebandi eh
    Kumama eh Yesu oyo
    Omoni libondeli na nga ya chambre, lelo nayembi na loyembo
    Sekele na nga ebimi eh
    Kumama eh Yesu oyo Jesus Jesus Jesus

    Ah apa ya bana, papa libota ebele (papa libota ebele)
    Papa libota monene eh yesu oyo (papa libota monene)
    Nazanga papa eh, na zanga maman eh
    Yo nde okoma nionso na ngai oh
    Soki malade ememi yo na suka, kamata trompette na yo eh
    Trompette yango nde liloba na nzambe
    Lobela nga na litoyi ya droite, oyo muasi na mobali na ye
    Yo nde Nkolo ya libala eh

    Soki mosala ezangi yo ndeko, soki kimia ezangi yo ndeko
    Kamata trompette betela Nzambe, yango nde libondeli eh
    Soki kobota eza kotungisa yo, soki pe kimia ezangi eh
    Kamata trompette betela Nzambe, ye nde nzete ya mbila eh
    Papa eh Yawheh, Papa eh Yawheh
    (Yesu oza wapi? Yo nde kimia ya mitema na biso)
    (Yo nde mayi na biso ya komela)
    Mayi ya ko mela ya vie na nga eh, nazuaka epayi na Yo eh Yesu
    Yo nde mayi na nga oh, yo nde kimia na nga
    Papa eh Yawheh, Papa omoni ba mpota na mitema

    Sembola loboko, sembola loboko banguna bakamua
    Papa soki bato batuni ngai balobi na loba kaka phrase moko
    Ezala mokuse mpe ezala efficace, nako yebisa
    Yo sala na ngai oyo nionso yo olingi mpo Yo nde Nkolo na ntango
    Mema ngai esika yo olingi mpo Yo oyebi motema na ngai koleka ngai moko


    Comentarios

    Envía preguntas, explicaciones y curiosidades sobre la letra

    0 / 500

    Forma parte  de esta comunidad 

    Haz preguntas sobre idiomas, interactúa con más fans de Marie Misamu y explora más allá de las letras.

    Conoce a Letras Academy

    ¿Enviar a la central de preguntas?

    Tus preguntas podrán ser contestadas por profesores y alumnos de la plataforma.

    Comprende mejor con esta clase:

    0 / 500

    Opciones de selección