visualizaciones de letras 21

Réalité

Marie Misamu

Letra

    Ozui malade, okei epai ba dokotolo
    Balobi malade na yo eza na kisi te
    Eza réalité ya vie

    Ah yo obotaka te, minganga ba condana yo
    Balobi vie na yo mobimba okosimba muana te
    Ondima réalité ya vie, mama eh

    Ndeko owuti kobungisa ndeko, akotaki na coma eh
    Minganga basali nionso balembani balobi akufi na ye
    Oyo pe eza réalité ya vie mama eh

    Basusu bakanga bango na mpungu eh
    Elengi ya libala bayokaka kaka na sango
    Suka suka bazonga ndako ya baboti
    Oyo pe vraiment eza réalité ya vie

    Ngai nayebi pe mosala maboko
    Esika nionso nakobeta porte ata toza babale
    Ba kozua moko batiki ngai
    Eza réalité ya vie

    Vie na nga nde somo, Papa vie na nga problème
    Nakoya kokufa pamba, soki otiki nga nasambue kosambua eh
    Ah, nga pasi eh

    Libota na nga pasi libota na nga somo
    Natuni balobi nga nandima réalité ya vie
    Pona nini basusu bazuaka basusu bamonaka pasi Nzambe?
    Moyi ebimaka pona moto nionso eh ma
    Mbula ebetaka pona moto nionso, butu
    Butu eyindaka pona moto nionso ngai eh
    Moyi ebimaka pona moto nionso
    Natuni balobi nga nandima réalité ya vie namoni pasi

    Vie na nga nde pasi eh, nakoya kokufa pamba ngai eh
    Soki otiki nga nasambue kosambua eh
    Kombo na Yo ekoya kotshiolama pamba Nzambe na ngai
    Ngai bazotuna nga wapi Nzambe na yo eh aza wapi

    Réalité ezalaka kaka boye, vie ya moto kaka boye
    Condamnation ya bato ya mokili ezalaka kaka bongo
    Kasi eza na maitre moko soki akoti na motema na yo
    Achangeaka histoire ya vie, impossible ekomaka possible
    Kombo na Ye Jehovah Jiré
    Kombo na Ye Jehovah Shalom eh Nzambe ya paix
    Kombo na Ye Alpha Omega ebandeli mpe suka
    Kombo na Ye Nzambe Malamu, nalela vie na nga

    (Yesu, Yesu solution ya vie na ngai eh, Papa eh)
    Nalingi nabetela yo bapasi na nga nayebi te ndenge nini ya kobanda
    Yesu kota na ba chambre ya motema eh obimisa ba pasi elie nde nzoto eh
    (Yesu, Yesu solution ya vie na ngai eh, Papa eh) ah Yaya eh, kotika te nakowa eh
    Basombeli nga lilita basombeli nga lopango
    Nakufa lelo lobi mosika Nzambe na nga olobi nini eh?
    (Yesu, Yesu solution ya vie na ngai eh, Papa eh)
    Olobi nini eh? Olobi nini eh? Nga nakomi na suka eh
    Nazanga papa eh, nazanga mama eh
    Yo nde okoma nionso na ngai eh Yesu nde Papa ya bana bitike
    (Yesu, Yesu solution ya vie na ngai eh, Papa eh) sunga ngai eh

    Papa vie na nga somo, vie na nga pasi, vie na nga kokamua
    Bapesa nga bakombo ebele na mokili, nakima wapi
    Soki otiki nga nasambue kosambua
    Kombo na Yo ekoya kotshiolama pamba
    Yaya bazotuna nga wapi Nzambe na yo
    Oza wapi, oza wapi eh? Tata oza wapi oh?

    Tango olakaki nga eh, tozalaki biso mibale
    Bilaka na Yo na motema, nabombi makasi
    Yaya na nga nazozela crie ya suka eh
    Soki ogangi banguna bakimi eh
    Yaya soki osali te tokoti ndaku
    Oza wapi eh? Oza wapi eh?


    Comentarios

    Envía preguntas, explicaciones y curiosidades sobre la letra

    0 / 500

    Forma parte  de esta comunidad 

    Haz preguntas sobre idiomas, interactúa con más fans de Marie Misamu y explora más allá de las letras.

    Conoce a Letras Academy

    ¿Enviar a la central de preguntas?

    Tus preguntas podrán ser contestadas por profesores y alumnos de la plataforma.

    Comprende mejor con esta clase:

    0 / 500

    Opciones de selección