visualizaciones de letras 35

Température

Marie Misamu

Letra

    Nani aza na thermomêtre ya koyeba température ya molimo moto
    Nani aza na balance ya koyeba kilo ya vie ya moto
    Nani aza na mètre oyo eko lakisa molayi ya molimo ya moto yeye
    Nani akoki kotimola libulu molayi mpo ayeba mozindo ya molimo moto
    Bobele Yesu

    Wapi université oyo eza na mateya ya kokamba vie ya molimo ya moto
    Wapi parlement oyo ekoki ko siéger pona ko voter ba lois ya molimo ya moto
    Wapi gouvernement oyo eza na ba ministres ya kokamba hum vie ya molimo moto
    Wapi mboka oyo eza na roi to regner ya kokamba vie hum ya molimo ya moto
    Bobele Yesu

    Nani aza na site internet ya ko permettre biso
    To naviguer pona toyeba vie spirituelle ya moto

    Mosusu okomona moto likolo, likolo lokola moto ya masumu
    Ye wana Nzambe aza kolinga
    Mosusu okomana ye akotambola na logome elamba epasuka
    Ndeko keba minister monene

    Tuna mikonzi minene ba fanda na kiti ya bokonzi
    Ba wuta wapi?

    Okomona babeteli yo porte basengi yo mayi ya komela
    Ndeko koboya te
    Mosusu babengana ba ange na porte na bango
    Yesu soki afungoli yo miso mpo omona vie ya moto okoki kofukamela ye
    Ah ngai
    Bible eloba éthiopien a changaka peau na ye te
    Leopard mpe a changaka ba taches na ye te
    Lelo moninga pamba oyebi lobi na ngai te Yesu azo mona ngai moto monene
    Ah ngai

    Yo moninga malade Yesu azo mona bien
    Yo moninga mobola Yesu azo mona ngai riche
    Likolo ya ba sentiments na yo obengi ngai moto na masumu
    Ah yeye yeye ndeko eh

    Ko juger ngai te
    Ko juger mpe ngai te
    Oyebi lobi na ngai
    Oyebi pe vie na ngai te
    Nani akoki kotombola libanga abamba muasi oyo akueyi na ekobo

    Likambo yango nini lelo basali ya Nzambe
    Nzambe moto atia bango na eklezia na ye
    Mikumba oyo bamemaka soki bapesi ndeko okokoka te
    Babengaka bango ba fou na kati ya ecclesia, ba blessés de guerre
    Ba grand coopérant na makambo ya eklezia, ba koko ya suka mboka ma
    Bilamba epatuama na kati ya eklezia

    Marie Magdala asopi malasi na ye ya motuya na makolo ya Yesu
    Neti babengi ye ndumba
    Nzoka ye nde amonaki lisekua ya Yesu liboso
    Nakotambola moto likolo na kobeta tolo

    Ndeko na ngai oh ne jugez point
    Ne jugez point
    Ndeko na ngai ne jugez point mpo ba juger yo te
    Ne jugez point
    Tika Nzambe a juger basali na Ye
    Tika Nzambe a juger bato na Ye
    Tika Nzambe a juger bana na Ye


    Comentarios

    Envía preguntas, explicaciones y curiosidades sobre la letra

    0 / 500

    Forma parte  de esta comunidad 

    Haz preguntas sobre idiomas, interactúa con más fans de Marie Misamu y explora más allá de las letras.

    Conoce a Letras Academy

    ¿Enviar a la central de preguntas?

    Tus preguntas podrán ser contestadas por profesores y alumnos de la plataforma.

    Comprende mejor con esta clase:

    0 / 500

    Opciones de selección