visualizaciones de letras 15
Letra

    Eh
    Naponi nzela na Ye oh
    Naponi na ngai nzela Nzambe
    Nzela na Ye oh nzoka kitoko mingi oh
    Kosalela Nzambe nzoka kitoko mingi oh
    Papa oh yango babengi nga zoba oh
    Eh

    Naponi nzela na Ye oh baninga
    Ngo botika ngai nayembela Ye oh
    Ngo botika ngai nasanjola Ye
    Naponi na ngai nzela Nzambe
    Nzela na Ye oh nzoka kitoko mingi oh
    Kosalela Nzambe nzoka kitoko trop
    Papa oh yango babengi nga zoba oh
    Eh

    Baninga bakotshiolaka nga oh Papa oh
    Baninga bakoloba oh nabebi eh
    Baninga bakoloba oh nabeteli eh
    Baninga bakoloba oh nga na sauta oh
    Nzoka na sauta lifelo Nzambe oh
    Nakota kati na Yesu eh
    Eh

    Baninga bakosekaka nga oh Papa oh
    Baninga bakoloba oh nabebi eh
    Baninga bakoloba oh nabeteli eh
    Baninga bakoloba oh nga na sauta oh
    Nzoka na sauta lifelo Nzambe oh
    Nakota kati na Yesu eh
    Eh

    Baninga, kosalelaka Nzambe oh
    Koyembelaka Nzambe na yo eh nzoka eza esengo
    Soki nayebaki Ye oh wuta bomwana oh
    Mbele nga nakokaki komona pasi ya boye te na vie na nga

    Baninga, kosalelaka Nzambe oh
    Koyembelaka Nzambe oh nzoka eza esengo
    Soki nayebaki Ye oh wuta bomwana oh
    Mbele nga nakokaki komona pasi ya boye te na vie na nga

    Ah Nzambe na ngai oh (na vie na nga)
    Ah Ye atonda bolingo eh (na vie na nga)
    Ah Ye alingi nga mingi oh (na vie na nga)
    Ah Ye nde Nzambe ya bolamu eh (na vie na nga)
    Ah Ye nde likonzi na ngai oh (na vie na nga)
    Ah Ye akosaka te (na vie na nga)
    Ah

    Ndeko na nga, y'okataki ndayi, moninga na ngai oh
    Liboso na basali na Nzambe oh
    Liboso pe ya bana na Nzambe oh
    Oyo olobaki okosalela Yesu eh
    Y'olobaki okoyembela Ye oh
    Y'olobaki soki apamboli yo
    Okosala nionso akosenga yo
    Ebongo tosuki wapi, frère na ngai oh?
    Tosuki wapi, sœur na ngai oh?
    Lolendo elati yo nde pona nini eh?
    Toyokanaki boye te na Nzambe oh
    Eh

    Mokolo yango ekozala somo, moninga na ngai oh
    Mokolo yango ekozala somo eh
    Ngo mokolo yango ekozala suka eh
    Nga namibongisa nakutana na Ye
    Namilengela namonana na Ye
    Po mokolo yango ekozala somo eh
    Eh

    Toyokanaki boye te na Nzambe oh (toyokanaki boye te na Ye oh)
    Toyokanaki boye te na Ye oh (y'olobaki soki apamboli yo)
    Toyokanaki boye te na Nzambe oh (y'okosala nionso akosenga yo)
    Toyokanaki boye te na Ye oh (tosuki wapi, frère na ngai oh)
    Toyokanaki boye te na Nzambe oh (tosuki wapi, sœur na ngai oh)
    Eh

    Eh
    Nalingi nakutana na Nzambe na nga
    Nga nasolola na baninga na ngai
    Nga nakutana na Nzambe na nga
    Nga nafanda [?]
    Nga nasolola na maman Sophie eh
    Ngai nakutana na Ruth na nga oh
    Ngai nasolola na libota na nga


    Comentarios

    Envía preguntas, explicaciones y curiosidades sobre la letra

    0 / 500

    Forma parte  de esta comunidad 

    Haz preguntas sobre idiomas, interactúa con más fans de Marie Misamu y explora más allá de las letras.

    Conoce a Letras Academy

    ¿Enviar a la central de preguntas?

    Tus preguntas podrán ser contestadas por profesores y alumnos de la plataforma.

    Comprende mejor con esta clase:

    0 / 500

    Opciones de selección