visualizaciones de letras 182

Témoignage

Marie Misamu

Letra

    Makambo mosusu bakoka ko expliquer yango te oh
    Témoignage mosusu okoyeba ndenge ya kobandela te oh
    Likambo yango na Yesu eh, sekele yango na Tata na mwana eh
    Moto na moto na litatoli na ye eh, oyo yanga litatoli yango oyo

    Nakomaki lokola mwasi aza na zemi
    Sánzá libwa azo bota te oh
    Nani akitisa ngai mokumba naza na'ango oh
    E collé na ngai na nzoto eboyi kotika ngai ye eh

    Nakomaki lokola moto akoti zamba
    Abungi nzela ya kobima eh
    Nani alakisa ngai nzela mpona na bima eh
    Miso mpe ezomona malamu te eh

    Somo na ngai lokola esclave aza ko tourner
    Tout autour ya maitre na ye
    Kino asenga liberté na ye
    Po motema na ye efanda kimia

    Kombanga na ngai lokola sentinelle
    Azozela tongo etana azua kimia
    Mpo mokumba azua na vie na ye
    Akengela mpo moyibi akota te

    Kombanga lisusu lokola bébé
    Azolela tango nionso eh
    Bongo maman aluka pasi aza na'ango
    Po monganga abikisa muana eh

    Pasi etingami na nzoto eh ma
    Wapi mongongo oyo elekisa biloko ngai eh
    Nzoto ekomi ko décevoir elamba ya kolata wowo oh
    Wapi monoko nakangisa pasi na ngai eh
    Nani yango nayebisa bapasi na ngai eh
    Avocat aza wapi a plaidé pona pasi na ngai eh
    Ah juge aza wapi akatela nga likambo eh
    Po pasi eboyi kotika ngai eh

    Ah, moyibi to liwa ya nini eyiba to eboma bapasi na ngai etika ngai bomoyi

    Soins intensifs ekoma ekomaki mbeto na ngai ya libela eh
    Prof nini apesa ngai mateya ya kokima pasi ya molimo eh
    Monganga nini asala ngai opération ya pasi ya molimo eh
    Motuka pe mpepo nini emema ba pasi na ngai mosika na ngai eh
    Masuwa pe lokalo nini ebuaka bapasi na ngai na lubuaku eh
    Volcan to mopepe nini eh Yaya eh
    Rivière mpe mbonge nini emema bapasi na ngai esika elingi êê
    Mafuta to pe savon nini na pakola na longola bapasi na ngai eh
    Kiti pe mbeto nini na lala natikela ye bapasi na ngai eh
    Eh Yaya eh, Yaya eh, Yaya na ngai eh oh
    Ah eh pasi eboyi kotika ngai eh
    Bapasi ezingaki ngai nayokaki solo ya liwa yeye
    Ngai nakomaki na suka pasi eyokisaki ngai liwa yeye êê
    Nzoka Yesu Klisto mosungi ya kokamua eh
    Akufaki pona biso tobika oh ma
    Amemaki mikumba na biso mpo tozua liberté
    Liberté na ngai, liberté na ngai eh, liberté na ngai eh
    Yesu Klisto Liberté na ngai eh ma
    Ah Yesu Klisto Liberté ya famille na ngai wowo oh
    Ah Yesu Klisto Liberté ya Congo oh

    Ah Yesu Klisto, ah Yesu Klisto eh ah eh
    Liberté na ngai oh
    Okokuta ngai maboko na moto nazozela liberté na ngai eh
    Ah ngai natie mabolongo na se nazo zela liberté na ngai ekoka eh
    Nasimbi motema na ngai, liberté oza wapi eh
    Ah liberté na ngai eh, liberté na ngai eh
    Yesu liberté oza wapi

    Likama, likama nandimaki te ekokomela ngai boye
    Ekokomela ngai boye
    Ah Yesu Klisto, ah Yaya ya baleki eh
    Ah liberté na ngai eh, Yaya oza wapi eh
    Yesu Klisto liberté


    Comentarios

    Envía preguntas, explicaciones y curiosidades sobre la letra

    0 / 500

    Forma parte  de esta comunidad 

    Haz preguntas sobre idiomas, interactúa con más fans de Marie Misamu y explora más allá de las letras.

    Conoce a Letras Academy

    ¿Enviar a la central de preguntas?

    Tus preguntas podrán ser contestadas por profesores y alumnos de la plataforma.

    Comprende mejor con esta clase:

    0 / 500

    Opciones de selección